Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye.
bato ya Filisitia babengisaki Banganga-Nzambe mpe bato ya soloka, balobaki na bango : — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Yawe ? Boyebisa biso ndenge nini tokoki kozongisa yango na esika na yango.