1 Samuele 5:9 - Mokanda na Bomoi9 Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango : Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango : — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango ; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango.