1 Samuele 5:8 - Mokanda na Bomoi8 Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango : — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Nzambe ya Isalaele. Bazongisaki : — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli kokende na Gati. Boye bamemaki Sanduku ya Nzambe ya Isalaele na Gati. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye : — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te.
Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango : — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango ; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango.