Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 5:4 - Mokanda na Bomoi

4 Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo ; kaka nzoto na ye nde etikalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 5:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama, mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye : akobuka mabanga nyonso ya etumbelo mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka ; mpe likonzi moko te ya Ashera to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.


Moto oyo azangi makoki ya kobonza makabo ya boye mpo ete azali mobola makasi akopona nzete oyo epolaka te ; akoluka mosali bikeko oyo azali penza mayele mpo na kosala nzambe ya ekeko oyo eninganaka te.


Tala maloba oyo bokoloba na bango : « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »


Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele ; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.


Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ; ekolimwa na tango ya kosambisama.


« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›


Akozwa banzambe na bango ya bikeko, bikeko na bango oyo basala na bibende, biloko na bango ya motuya oyo basala na wolo mpe na palata mpe akomema yango na Ejipito. Akozala mosika ya mokonzi ya nor na mwa mibu.


Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana, makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto. Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule, mpe mpo ete basalela yango lisusu te lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »


Bosala bililingi oyo ekotalisa bapota na bino ya libumu, mpe oyo ekotalisa bampuku oyo ezali kobebisa mokili na bino ; mpe bopesa nkembo na Nzambe ya Isalaele. Tango mosusu, akolongola loboko na Ye na likolo na bino, na likolo ya banzambe na bino, mpe na likolo ya mokili na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ