Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 5:3
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki : « Bala, yanola biso ! » Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.


ezali na maboko, kasi esimbaka te ; ezali na makolo, kasi etambolaka te. Minoko na yango ebimisaka ata makelele te.


Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta ! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye !


Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.


Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.


Moto oyo azangi makoki ya kobonza makabo ya boye mpo ete azali mobola makasi akopona nzete oyo epolaka te ; akoluka mosali bikeko oyo azali penza mayele mpo na kosala nzambe ya ekeko oyo eninganaka te.


Mosali bikeko azali kolendisa monyangwisi bibende na moto, mosemboli bibende na marto azali kopesa makasi na mosali oyo apesaka yango elilingi ya suka ; alobi mpo na bisika epai wapi basangisaka bibende : « Ezali malamu ; » mpe alendisi nzambe ya ekeko na basete mpo ete eningana te.


Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, batelemisaka yango na esika na yango mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. Wuta na esika na yango, ekoningana te. Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, ekobikisa ye te na tango ya pasi.


Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !


Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.


Tango bato oyo bazalaki na milimo mabe bazalaki komona Ye, bazalaki kogumbama liboso na Ye mpe koganga : — Yo ozali solo Mwana na Nzambe !


Sima na Sanduku ya Yawe kosala sanza sambo kati na mokili ya bato ya Filisitia,


Bosala bililingi oyo ekotalisa bapota na bino ya libumu, mpe oyo ekotalisa bampuku oyo ezali kobebisa mokili na bino ; mpe bopesa nkembo na Nzambe ya Isalaele. Tango mosusu, akolongola loboko na Ye na likolo na bino, na likolo ya banzambe na bino, mpe na likolo ya mokili na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ