Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 5:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bato ya Filisitia bakotisaki Sanduku ya Nzambe kati na tempelo ya Dagoni, nzambe na bango, mpe batiaki yango pembeni ya ekeko ya Dagoni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 5:2
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batiaki bibundeli na ye na tempelo ya banzambe na bango mpe badiembikaki mokuwa ya moto na ye kati na tempelo ya Dagoni.


Mokolo oyo elandaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.


Wana Balitazari azalaki komela vino, apesaki mitindo ete bamema bakopo ya wolo mpe ya palata oyo tata na ye, Nabukodonozori, azwaki wuta na Tempelo ya Yelusalemi, mpo ete mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, basi na ye mpe bamakangu na ye bamela na yango masanga.


Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.


balekaka lokola mopepe mpe bakobaka nzela na bango, basepelaka kosala mabe, mpe makasi na bango nde ezali nzambe na bango.


Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka, atumbelaka kitunga na ye ansa ; pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye, azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko.


Bakambi ya Filisitia basanganaki mpo na kobonza mbeka monene epai ya nzambe na bango, Dagoni, mpe kosala feti. Balobaki : « Nzambe na biso akabi monguna na biso, Samison, na maboko na biso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ