1 Samuele 5:10 - Mokanda na Bomoi10 Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni. Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki : — Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango : — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango ; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango.