Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 4:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bandeko bato ya Filisitia, boyika mpiko ! Bozala mibali, noki te bokokoma bawumbu ya Ba-Ebre ndenge bango bazalaki bawumbu na bino ! Bozala mibali mpe bobunda !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 4:9
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »


Bato ya bikolo bakozwa bango mpe bakomema bango kino na esika na bango. Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. Bakokomisa bakangami bato oyo bakangaki bango mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango.


Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te ! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te ! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.


Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.


Boye, kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe Yawe akabaki bango na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Amoni.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia.


Ba-Ebre oyo basalelaki liboso bato ya Filisitia mpe bakendeki elongo na bango na bitumba mosusu, bango basanganaki na bato ya Isalaele, oyo bazalaki elongo na Saulo mpe Jonatan.


Mawa na biso ! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya ? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ