Tsadoki mpe azalaki wana elongo na Balevi oyo bazalaki elongo na ye mpe bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. Bakitisaki Sanduku ya Nzambe, mpe Abiatari abonzaki mbeka kino tango bato nyonso basilisaki kobima na engumba.
Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba : « Nakosakola mpo na yo ; » bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino to ya masanga mosusu ya makasi, moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli ya bato ya lolenge na ye.
Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango.
Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala.
Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.
Bato ya Filisitia bayokaki koganga wana mpe batunaki : — Koganga nyonso wana elakisi nini kati na molako ya Ba-Ebre ? Wana bayokaki sango ete Sanduku ya Yawe ekoti kati na molako,