1 Samuele 4:3 - Mokanda na Bomoi3 Tango basoda ya Isalaele bazongaki na molako, bampaka ya Isalaele batunaki : — Mpo na nini Yawe asali ete bato ya Filisitia balonga biso na mokolo ya lelo ? Tokende kozwa Sanduku ya Boyokani ya Yawe, na Silo, mpo ete eya kati na biso mpe ekangola biso na maboko ya banguna na biso. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo ; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango ; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.