Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko, na lipata ya kanda na Ye : akweyisi lokumu ya Isalaele, wuta na likolo kino na se ; na mokolo ya kanda na Ye, abosanaki enyatelo makolo na Ye !
Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! »
Apesaki mwana yango kombo « I-Kabodi » oyo elingi kolakisa : Nkembo elongwe na Isalaele ! Atiaki makanisi na ye na Sanduku ya Nzambe, oyo babotoli, na tata-bokilo na ye mpe na mobali na ye, oyo bakufi.