Bino bavandi ya Aroeri, botelema na nzela mpe botala malamu, botuna mobali oyo azali kokima mpe mwasi oyo asili kobikisa bomoi na ye soki makambo nini esili kosalema !
Akomaki na tango oyo Eli azalaki ya kovanda na kiti, pembeni ya nzela, mpe azalaki kotala na ekenge, pamba te motema na ye ezalaki na kimia te na tina na Sanduku ya Nzambe. Bongo tango moto yango akotaki na engumba mpe apesaki sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema, engumba mobimba egangaki.