12 Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye.
Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.
Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.
Tango Davidi akomaki na songe ya ngomba epai wapi bato bazalaki na momesano ya kokende kogumbamela Nzambe, Ushayi, moto ya Ariki, mopesi toli ya Davidi, azalaki kuna mpo na kokutana na ye, na nzambala na ye epasuka mpe moto na ye etonda na putulu.
Kaka na sanza wana, na mokolo ya tuku mibale na minei, bana ya Isalaele basanganaki mpo na kokila bilei ; balataki basaki mpe bamipakolaki putulu na mito.
Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.
Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.