1 Samuele 31:8 - Mokanda na Bomoi8 Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango bato ya Isalaele, oyo bazalaki na ngambo mosusu ya lubwaku mpe ba-oyo bazalaki na ngambo mosusu ya Yordani bamonaki ete mampinga ya Isalaele esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.