Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 31:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tango bato ya Isalaele, oyo bazalaki na ngambo mosusu ya lubwaku mpe ba-oyo bazalaki na ngambo mosusu ya Yordani bamonaki ete mampinga ya Isalaele esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 31:7
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ngai moko nakokotisa mobulu kati na mokili, mpe ezala banguna na bino oyo bakoya kovanda kati na yango bakokamwa.


Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.


Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.


Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.


Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.


Ndambo ya Ba-Ebre mosusu bakatisaki mayi ya Yordani mpo na kokende na mokili ya Gadi mpe ya Galadi. Saulo azalaki nanu na Giligali, mampinga nyonso oyo ezalaki elongo na ye ezalaki kolenga na somo.


Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali, soda oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe basoda na ye nyonso bakufaki bango nyonso elongo mokolo wana.


Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ