Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 31:4 - Mokanda na Bomoi

4 Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. » Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 31:4
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Saulo asilaki kokufa, Davidi azongaki na Tsikilagi sima na ye kolonga bato ya Amaleki. Mpe avandaki kuna mikolo mibale.


Davidi atunaki ye : — Mpo na nini obangaki te kosembola loboko na yo mpo na koboma mopakolami na Yawe ?


Bopanza sango yango te kati na Gati, bopanza yango te na babalabala ya Ashikeloni, noki te bana basi ya bato ya Filisitia bakosepela, mpe bana basi ya mibali oyo bakatama ngenga te bakopumbwa na esengo.


Elenge mobali azongisaki : — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye.


Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Bongo Davidi akendeki kozwa mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali, epai ya bakambi ya Yabeshi ya Galadi, oyo bayibaki yango na libanda ya Beti-Sheani epai wapi bato ya Filisitia badiembikaki yango mokolo oyo babomaki Saulo, na Giliboa.


Tango Zimiri amonaki ete mampinga ya Isalaele esili kobotola engumba, akotaki na ndako ya bokonzi, amitumbaki na ndako mpe akufaki na moto.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Omiri : misala oyo asalaki mpe nguya oyo alakisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kosakanela ngai. » Kasi soda yango abangaki mpe aboyaki koboma ye ; bongo ye moko Saulo azwaki mopanga mpe amibwakaki na likolo na yango.


Tata mpe mama na ye bazongisaki : — Boni, kati na bandeko na yo to kati na bato na biso nyonso, ezali te na bana basi ya kitoko mpo ete okende kozwa mwasi kati na bato ya Filisitia oyo bakatama ngenga te ? Kasi Samison alobaki na tata na ye : — Balela ngai ye, pamba te ye nde abongi mpo na ngai.


Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.


Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : — Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.


Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ?


Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.


Mpe Davidi alobaki lisusu : — Na Kombo na Yawe ! Ye moko Yawe nde akoboma ye : akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.


Tango soda oyo amemaki bibundeli na ye amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga na ye mpe akufaki elongo na Saulo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ