Elenge mobali azongisaki : — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye.
Bakataki mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso na ye ; mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atobolaki miso ya Sedesiasi, apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo ya bronze mpe bamema ye na Babiloni.
Nzokande, bato ya Filisitia batingamaki kolanda Saulo mpe bana na ye ya mibali, bongo babomaki Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa oyo bazalaki bana na ye.
Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, mpe mibali nyonso oyo bazalaki kovanda elongo na bango batandamaki mpo na bitumba, na Geba ya Benjame. Kasi bato ya Filisitia batongaki ya bango molako na Mikimasi.
Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.
Tango bato nyonso ya Isalaele oyo babombamaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi bayokaki ete bato ya Filisitia bazali kokima, bango mpe balandaki mpe babundisaki bato ya Filisitia.
Bana mibali ya Saulo bazalaki : Jonatan, Yishivi mpe Maliki-Shuwa. Azalaki na bana mibale ya basi : ya mokolo, kombo na ye ezalaki « Merabi ; » mpe ya leki, « Mikali. »
Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »