Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 31:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bato ya Filisitia bazalaki kobundisa Isalaele, kasi bato ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 31:1
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh bangomba ya Giliboa, tika ete mamwe mpe mvula ekweya lisusu te na likolo na bino, ata na likolo ya bilanga oyo ebotaka bambuma mpe epai wapi makabo ewutaka ! Pamba te ezali kuna nde basambwisaki banguba ya bilombe, nguba ya Saulo oyo bakotikala kopakola lisusu mafuta te.


Elenge mobali azongisaki : — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye.


Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. »


Kasi soki bokobi kosala mabe, bino mpe mokonzi na bino bokobebisama.


Na tango wana, bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda mpo na kobundisa Isalaele. Akishi alobaki na Davidi : — Osengeli koyeba ete yo mpe bato na yo bokokende na bitumba elongo na ngai.


Samuele alobaki na Saulo : — Mpo na nini otungisi ngai mpe obimisi ngai ? Saulo alobaki : — Nazali na pasi makasi : bato ya Filisitia bazali kobundisa ngai ; bongo Nzambe apesi ngai mokongo, azali koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to ya bandoto. Yango wana nabengi yo mpo ete oyebisa ngai likambo nini nakoki kosala.


Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia.


Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ