Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 30:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bongo Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ? Yawe azongiselaki ye : — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 30:8
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu.


Davidi atunaki Yawe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.


Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie.


Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.


Monguna amilobelaki : « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola ; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »


Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.


Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.


Jedeon elongo na basoda na ye nkama misato bakomaki na Yordani mpe bakatisaki yango. Atako balembaki, bakobaki kaka kolanda bato ya Madiani.


Boye, batunaki lisusu Yawe : — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ? Yawe azongisaki : — Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko.


Boye Saulo atunaki Nzambe : « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele ? » Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana.


Davidi atunaki Yawe, alobaki : — Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila.


Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : — Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.


Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.


Davidi akangolaki biloko nyonso oyo bato ya Amaleki bazwaki elongo na basi na ye mibale.


Moto na bango moko te azangaki : ezala elenge, mokolo, mwana mobali, mwana mwasi, eloko moko kati na bomengo ya bitumba to eloko moko kati na biloko oyo babotolaki bango. Davidi azongaki na biloko nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ