Mokonzi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari : — Zonga na bilanga na yo, na Anatoti, pamba te osengeli kokufa. Kasi nakoboma yo sik’oyo te, pamba te omemaki Sanduku ya Nkolo Yawe liboso ya Davidi, tata na ngai, mpe okabolaki na ye pasi nyonso.
Bakotonga na wolo efode ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
Akotaki kati na Ndako ya Nzambe wana Abiatari azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe, aliaki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe mpe apesaki yango epai ya bato na ye ; nzokande, kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
Wana Saulo azalaki nanu kosolola na Nganga-Nzambe, mobulu ezalaki kaka kokoma makasi kati na molako ya bato ya Filisitia. Boye Saulo alobaki na Nganga-Nzambe : « Tika ! Kotuna Yawe ezali lisusu na tina te. »