Boye, bato ya Amaleki mpe ya Kanana oyo bazalaki kovanda na bangomba yango bakitelaki bango, babundisaki bango, balongaki bango mpe balandaki bango kino na Orima.
Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba : kobebisama.
Bato ya libota ya Yuda elongo na bandeko na bango ya libota ya Simeoni bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Tsefati, mpe babebisaki bango. Yango wana, bapesaki engumba yango kombo « Orima. »