Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 30:27 - Mokanda na Bomoi

27 Atindaki ndambo epai ya ba-oyo bazalaki na Beteli, na ngambo ya sude ya Ramoti mpe na Yatiri ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 30:27
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este.


Apesaki esika yango kombo « Beteli. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. »


Jeroboami atiaki ekeko moko na Beteli mpe mosusu na Dani.


Na mokili ya bangomba : Shamiri, Yatiri, Soko,


Eteni ya mabele ya bakitani ya Jozefi ebandaki wuta na Yordani, pene ya Jeriko, na ngambo ya este ya mayi ya Jeriko, na esobe oyo emata na Jeriko na mokili ya bangomba ya Beteli.


Ekendeki longwa na Beteli kino na Luze, elekaki na ngambo ya bandelo ya bato ya Ariki mpe Ataroti,


mpe bamboka nyonso ya mike-mike oyo ezalaki zingazinga ya bingumba oyo, kino na Baalati-Beeri, oyo ezali Ramati ya Negevi. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango.


Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. » Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi.


Jozue atindaki bango, mpe bakendeki na esika oyo basengelaki kobombama. Babombamaki na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya Ayi. Jozue alekisaki butu wana elongo na bana ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ