Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.
Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote.
Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki : « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. »