2 Bakangaki na bowumbu basi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna, ezala bilenge to mikolo, kasi babomaki moko te kati na bango. Bamemaki bango mpe bazongelaki nzela na bango.
Davidi azalaki kotika te ete bamema na Gati, ezala mobali to mwasi, noki te bapanza sango na ye na maloba oyo : « Tala makambo oyo Davidi asalaki. » Davidi azalaki kosala kaka bongo, tango nyonso oyo avandaki na mboka ya bato ya Filisitia.
Moto na bango moko te azangaki : ezala elenge, mokolo, mwana mobali, mwana mwasi, eloko moko kati na bomengo ya bitumba to eloko moko kati na biloko oyo babotolaki bango. Davidi azongaki na biloko nyonso.
Tango Davidi mpe bato na ye bakomaki na engumba Tsikilagi, bakutaki yango ebebisama na moto. Basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakomaki bawumbu.