18 Davidi akangolaki biloko nyonso oyo bato ya Amaleki bazwaki elongo na basi na ye mibale.
Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu.
basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni.
Balobaki na Moyize : « Basali na yo batangi motango ya basoda oyo bazali na se ya bokonzi na biso mpe ata moko te azangi.
Bongo Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ? Yawe azongiselaki ye : — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.