1 Samuele 30:15 - Mokanda na Bomoi15 Davidi atunaki ye : — Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali ? Azongisaki : — Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai ; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye : — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te.