Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 30:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 30:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !


Bato na ye nyonso bazali kolela lokola bato bazali koluka bilei ; bapesaki bomengo na bango mpo na kozwa bilei, mpo ete bawumela na bomoi. Oh Yawe, tala mpe mona ndenge natiolami !


mpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »


Bongo Nzambe afungolaki libanga oyo ezalaki kati na Leyi, mpe libanga yango ebimisaki mayi. Tango Samison amelaki mayi, makasi na ye ezongaki mpe azwaki lisusu bomoi. Boye abengaki etima yango Eyini-Akore.


Kasi Jonatan ayokaki te ete tata na ye atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi ; apusaki nzete oyo azalaki na yango na loboko, azindisaki yango na mafuta ya nzoyi mpe aliaki yango, elongi na ye engengaki.


Basoda ya Davidi bakutanaki na mobali moko ya Ejipito kati na zamba mpe bamemaki ye epai ya Davidi. Bapesaki ye mayi ya komela mpe biloko ya kolia.


Davidi atunaki ye : — Ozali na ngambo ya banani mpe owuti wapi ? Azongiselaki ye : — Nazali moto ya Ejipito mpe mowumbu ya moto moko ya Amaleki. Esali mikolo misato wuta nkolo na ngai atikalaki kosundola ngai mpo ete nazalaki kobela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ