10 pamba te mibali nkama mibale balembaki makasi, bongo bakokaki te kokatisa moluka. Kasi Davidi elongo na basoda na ye, nkama minei, bakobaki kolanda.
Bongo Saulo elongo na bato na ye nyonso basanganaki mpe bakendeki na bitumba ; bamonaki ete bato ya Filisitia bazali na mobulu makasi, bazali kobomana bango na bango na mipanga.
Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote.