9 Boye Eli alobaki na Samuele : — Kende na yo kolala ; mpe soki abengi yo, okoloba : « Yawe loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka ! » Samuele akendeki mpe alalaki na esika na ye.
Elobaki na ngai : — Molingami ya Nzambe, kobanga te, zala na kimia ! Zala makasi ; solo, zala makasi ! Wana ezalaki koloba na ngai, nzoto na ngai ezwaki lisusu makasi mpe nalobaki : — Loba, nkolo na ngai, pamba te opesi ngai makasi.
Azongiselaki Jozue : — Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe ; nayei kaka sik’oyo. Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye : — Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye ?