7 Nzokande, Samuele ayebaki nanu Yawe te mpe atikalaki nanu te koyoka Yawe koloba na ye ata mbala moko.
« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :
mpe atunaki bango : — Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi ? Bazongisaki : — Te ! Totikala nanu koyoka te ete Molimo Mosantu azalaka.
Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, mpe nazalaki na mayele lokola ya mwana moke ; kasi tango nakomaki mokolo, natikaki oyo ekoki na mwana moke.
Yawe abengaki lisusu : — Samuele ! Samuele alamukaki, azongaki epai ya Eli mpe alobaki : — Ngai oyo, obengi ngai ! Eli alobaki na ye : — Mwana na ngai, nabengi yo te. Zonga, kende kolala.
Yawe abengaki Samuele na mbala ya misato ; mpe Samuele atelemaki, akendeki epai ya Eli mpe alobaki : — Ngai oyo, obengi ngai ! Bongo Eli asosolaki ete ezalaki Yawe nde azalaki kobenga elenge mobali.