5 Akendeki mbangu epai ya Eli mpe alobaki : — Ngai oyo, obengi ngai ! Kasi Eli alobaki na ye : — Nabengi yo te ! Zonga mpe lala. Samuele akendeki mpe alalaki.
Yawe abengaki Samuele, mpe ye azongisaki : — Ngai oyo !
Yawe abengaki lisusu : — Samuele ! Samuele alamukaki, azongaki epai ya Eli mpe alobaki : — Ngai oyo, obengi ngai ! Eli alobaki na ye : — Mwana na ngai, nabengi yo te. Zonga, kende kolala.