Tongo mpe pokwa nyonso, tobonzelaka Yawe bambeka ya kotumba mpe ya malasi, totandaka mapa likolo ya mesa ya bule ; mpe pokwa nyonso, topelisaka minda ya etelemiselo ya minda, pamba te biso totosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na biso ; kasi bino, bosundolaki Ye.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko.
Mokolo moko, sima na bango kolia mpe komela na Silo, Ana atelemaki mpe akendeki na Ndako ya Yawe. Ezalaki na ngonga oyo Nganga-Nzambe Eli avandaki na kiti, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe.