Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye : — Mwana na ngai ! Ezawu azongisaki : — Ngai oyo !
Miso ya Isalaele elembaki mpo na kimobange mpe azalaki komona lisusu malamu te. Yango wana, Jozefi apusaki bana na ye ya mibali pembeni ya tata na ye, Isalaele apesaki bango beze mpe ayambaki bango.
Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki : — Nayebi, mwana na ngai ! Nayebi ! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo.
Mwasi ya Jeroboami asalaki makambo oyo mobali na ye atindaki ye : akendeki na Silo mpe akotaki na ndako ya Ayiya. Nzokande, Ayiya azalaki komona lisusu te, pamba te miso na ye ekufaki mpo ete akomaki mobange.
Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala mibu tuku sambo to mibu tuku mwambe mpo na bato oyo baleki makasi ; nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko, pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.
Eli akomaki mobange makasi, mpe azalaki koyoka makambo nyonso oyo bana na ye ya mibali bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele ; azalaki mpe koyoka ete bazalaki kosangisa nzoto na basi oyo bazalaki kosala na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.