Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 3:18 - Mokanda na Bomoi

18 Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki : — Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 3:18
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »


Kasi soki Nzambe alobi : « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama.


Ezekiasi azongiselaki Ezayi : — Liloba na Yawe, oyo osili koloba ezali malamu. Pamba te azalaki komilobela : « Boni, kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai ? »


Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »


Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »


Yobo azongiselaki ye : — Ah ! Ozali koloba lokola moto ya liboma ! Boni, tondimaka kaka makambo ya malamu, epai ya Nzambe, kasi tondimaka makambo mabe te ?


Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso, kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.


Yawe akitaki kati na lipata, atelemaki wana pene na ye, mpe Moyize abelelaki Kombo ya Yawe.


Ezekiasi azongiselaki Ezayi : — Liloba na Yawe oyo osili koloba ezali malamu. Pamba te azalaki komilobela : « Kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai. »


Mosakoli Jeremi alobaki na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, maloba wana nyonso, kati na Yelusalemi,


Mokonzi Sedesiasi atindaki ete bamemela ye mosakoli Jeremi mpe bakotisa ye na Ekuke ya misato ya Tempelo ya Yawe. Mokonzi alobaki na Jeremi : — Nazali na likambo moko ya kotuna epai na yo ; kobombela ngai eloko moko te !


Mosakoli Jeremi alobaki na bango : — Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te.


Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye ?


Moyize alobaki na Aron : « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki : ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › » Aron alobaki ata liloba moko te.


Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki.


Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe : — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso ; kasi tobondeli Yo : bikisa biso lisusu sik’oyo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ