Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 3:17 - Mokanda na Bomoi

17 Eli atunaki ye : — Makambo nini Yawe ayebisaki yo ? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 3:17
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi alobaki na mwasi : — Kobombela ngai te eyano ya likambo oyo nalingi kotuna yo. Mwasi azongisaki : — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, aloba !


Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi ?


mpe basengaki na Davidi ete alia wana moyi ezali nanu. Kasi Davidi alapaki ndayi na maloba oyo : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu oyo eleki makasi soki nameki kolia mapa to eloko mosusu liboso ete moyi elala ! »


Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi,


Kasi mokonzi alobaki na ye : — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ?


Mokonzi alobaki : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. »


Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.


Mokonzi Sedesiasi atindaki ete bamemela ye mosakoli Jeremi mpe bakotisa ye na Ekuke ya misato ya Tempelo ya Yawe. Mokonzi alobaki na Jeremi : — Nazali na likambo moko ya kotuna epai na yo ; kobombela ngai eloko moko te !


Mosakoli Jeremi alobaki na bango : — Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te.


nzete yango ezali yo, mokonzi ! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata ; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.


Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye esengeli solo kolobama ? « Boni, Molimo na Yawe atomboki mpo ete asala makambo ya boye ? Maloba na Ye ezali ya boboto te mpo na moto oyo atambolaka alima ? »


Bongo, Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Balaki atunaki ye : — Yawe alobi nini ?


Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »


Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa.


Saulo alobaki : — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.


wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai !


Tika ete Nzambe apesa ngai Davidi etumbu ya makasi soki, kino lobi na tongo, natiki na bomoi mobali moko kati na bato nyonso oyo bazali ya Nabali ! »


Kasi Eli abengaki Samuele mpe alobaki : — Samuele, mwana na ngai ! Samuele azongisaki : — Ngai oyo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ