Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 3:14 - Mokanda na Bomoi

14 Yango wana, nalapi ndayi mpo na ndako ya Eli ete mbeba ya libota na ye ekotikala kolimbisama te, ezala na nzela ya bambeka to ya makabo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 3:14
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Nzambe ! Nzambe, Mobikisi na ngai, kangola ngai wuta na mokumba ya makila, mpe lolemo na ngai ekosakola bosembo na Yo.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai yango na matoyi na ngai moko penza : « Kino bokokufa, bokotikala kozwa bolimbisi ya lisumu oyo te, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yawe alobaki na ngai : « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai ! Tika ete bakende mosika na Ngai !


Bongo yo Jeremi, komeka kobondela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango ata moke te, komeka kutu te kosengela bango eloko : kotungisa Ngai te, pamba te nakotikala koyokela yo te.


Yelusalemi, mbindo na yo ezali kindumba. Nalukaki kokomisa yo peto, kasi olingaki kopetolama te na bosoto na yo. Okotikala lisusu kozala peto te kino tango nakosilisa kosopela yo kanda na Ngai.


Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›


Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye ; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye ? » Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ