13 Pamba te nayebisaki ye ete nakosambisa libota na ye mpo na libela, mpo na masumu oyo ye ayebi, masumu oyo na nzela na yango bana na ye ya mibali bamikomisaki mbindo, kasi ye apamelaki bango te.
Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye : « Mpo na nini ozali kosala boye ? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi.
Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »
Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te !
Tango ya suka ekoki sik’oyo mpo na yo, nakopelisela yo kanda na Ngai, nakosambisa yo kolanda etamboli na yo mpe nakofuta yo kolanda misala na yo nyonso ya mbindo.
Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele.
Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu,