Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 Na tango wana, nakokokisa makambo nyonso oyo nayebisaki Eli mpo na kotelemela libota na ye, wuta na ebandeli kino na suka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 3:12
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo nalobaki : « Ah ! Nkolo Yawe, bazali kotonga ngai : ‹ Ezali ye te oyo alobaka na masese ? › »


Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te ? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Ndenge kaka bilaka nyonso ya kitoko ya Yawe, Nzambe na bino, ekokisamaki solo, ndenge wana mpe akotindela bino makambo mabe kino tango akosilisa koboma bino kati na mokili ya kitoko oyo apesaki bino


Bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka Yabini, mokonzi ya Kanana, kino babomaki ye.


Bato ya Filisitia babotolaki Sanduku ya Nzambe, mpe bana mibali mibale ya Eli, Ofini mpe Fineasi, bakufaki.


Moto oyo amemaki sango azongisaki : — Bato ya Isalaele bakimi liboso ya bato ya Filisitia, mpe ebele kati na bango bakufi ; ezala bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, bakufi. Bato ya Filisitia babotoli Sanduku ya Nzambe.


Apesaki mwana yango kombo « I-Kabodi » oyo elingi kolakisa : Nkembo elongwe na Isalaele ! Atiaki makanisi na ye na Sanduku ya Nzambe, oyo babotoli, na tata-bokilo na ye mpe na mobali na ye, oyo bakufi.


Alobaki : « Nkembo elongwe na Isalaele, pamba te babotoli Sanduku ya Nzambe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ