Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 3:10 - Mokanda na Bomoi

10 Yawe ayaki mpe atelemaki wana ; abengaki lokola na mbala mosusu : — Samuele ! Samuele ! Samuele azongisaki : — Nkolo, loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 3:10
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azongiselaki Jozue : — Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe ; nayei kaka sik’oyo. Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye : — Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye ?


Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.


Yawe alobaki na Samuele : — Tala, nalingi kosala likambo moko oyo, kati na Isalaele, ekosala pasi na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka yango.


Samuele alalaki kino na tongo. Bongo sima na ye kolamuka, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe. Azalaki kobanga koyebisa Eli emoniseli oyo azwaki.


Yawe akobaki komilakisa na Silo, pamba te azalaki komimonisa kuna epai ya Samuele na nzela ya Liloba na Ye.


Yawe abengaki Samuele na mbala ya misato ; mpe Samuele atelemaki, akendeki epai ya Eli mpe alobaki : — Ngai oyo, obengi ngai ! Bongo Eli asosolaki ete ezalaki Yawe nde azalaki kobenga elenge mobali.


Boye Eli alobaki na Samuele : — Kende na yo kolala ; mpe soki abengi yo, okoloba : « Yawe loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka ! » Samuele akendeki mpe alalaki na esika na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ