Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 29:9 - Mokanda na Bomoi

9 Akishi azongiselaki Davidi : — Nayebi ete osepelisaka ngai lokola Anjelu na Nzambe, Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia balobi : « Asengeli te kokende elongo na biso na bitumba. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 29:9
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »


Mosali na yo, Joabi, asalaki boye mpo na kobongola mpe kokomisa makambo oyo ndenge mosusu. Kasi nkolo na ngai azali na bwanya lokola Anjelu na Nzambe, ayebi makambo nyonso oyo ezali koleka kati na mokili.


Mefibosheti azongisaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki : « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. »


Atako bongo, botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te mpo na bokono na ngai ; nzokande, boyambaki ngai lokola Anjelu na Nzambe, lokola Yesu-Klisto Ye moko.


Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia batombokelaki Akishi mpe balobaki : — Zongisa moto oyo ! Tika ete azonga na esika oyo otiaki ye ; asengeli te kokende elongo na biso na bitumba, noki te akobalukela biso na tango ya bitumba. Mpe ndenge nini moto oyo akoki kosepelisa lisusu mokonzi na ye, soki na komema mito ya bato na biso moko te ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ