1 Samuele 29:6 - Mokanda na Bomoi6 Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye : — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |