Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 29:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki : — Ba-Ebre oyo bazali kosala nini awa ? Akishi alobaki na bango : — Ezali Davidi, mosali ya Saulo, mokonzi ya Isalaele. Azali elongo na ngai wuta mibu mpe mikolo ; mpe natikali nanu kokanga ye ata na mbeba moko te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 29:3
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.


Boye, Molimo na Nzambe akitelaki Amasayi, mokonzi ya lisanga ya basoda tuku misato, mpe alobaki : « Oh Davidi, tozali ya yo ! Tozali elongo na yo, oh mwana mobali ya Izayi ! Tika ete kimia ezala na yo, ezala na yo penza ; tika ete kimia ezala na moto oyo azali kosunga yo, pamba te Nzambe na yo azali kosunga yo. » Boye Davidi ayambaki bango mpe akomisaki bango bakonzi ya mampinga na ye.


Ndambo ya bato ya Manase bakendeki kosala boyokani elongo na Davidi tango akendeki elongo na basoda ya Filisitia, mpo na kobundisa Saulo. Kasi Davidi elongo na bato na ye balongaki te kosunga bato ya Filisitia, pamba te sima na bakambi na bango koyokana, babenganaki Davidi mpe balobaki : « Davidi alingi kobomisa biso mpo ete azongisa boyokani na nkolo na ye Saulo ! »


Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bazalaki koluka likambo ya kofundela Daniele na ndenge na ye ya kotambolisa makambo ya bokonzi. Kasi balongaki te kozwa ata likambo moko to mbeba ya kofundela Daniele, mpo ete azalaki sembo mpe mpo ete, kati na ye, bazalaki komona ata libunga te to mbeba moko te ya kofundela ye.


Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu ! Kasi Pilato azongisaki : — Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.


Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso.


kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.


Boye, bango mibale bamimonisaki na molako ya bato ya Filisitia. Mpe tango bato ya Filisitia bamonaki bango, balobaki : « Botala ! Ba-Ebre babimi wuta na mabulu epai wapi babombamaki. »


Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo.


Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »


Davidi awumelaki na mokili ya bato ya Filisitia mobu moko mpe sanza minei.


Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye : — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te.


Bato ya Filisitia bayokaki koganga wana mpe batunaki : — Koganga nyonso wana elakisi nini kati na molako ya Ba-Ebre ? Wana bayokaki sango ete Sanduku ya Yawe ekoti kati na molako,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ