Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 29:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boye, Davidi mpe bato na ye batelemaki na tongo makasi mpo na kozonga na mokili ya bato ya Filisitia ; mpe bato ya Filisitia bakendeki na Jizireyeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 29:11
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. »


Kati na eteni ya mabele na bango, ezalaki na : Jizireyeli, Kesuloti, Sunemi,


Davidi abalaki lisusu Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe bango mibale bakomaki basi na ye.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.


Boye, lamuka na tongo makasi, yo mpe basoda ya nkolo na yo, oyo bayaki elongo na yo. Bolamuka na tongo makasi mpe bokende wana moyi ekobima.


Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ