1 Samuele 28:9 - Mokanda na Bomoi9 Kasi mwasi yango alobaki na ye : — Oyebi solo makambo oyo Saulo asalaki. Abenganaki na mokili, bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. Bongo mpo na nini otieli bomoi na ngai motambo mpo na kobomisa ngai ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! »