4 Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa.
Oh bangomba ya Giliboa, tika ete mamwe mpe mvula ekweya lisusu te na likolo na bino, ata na likolo ya bilanga oyo ebotaka bambuma mpe epai wapi makabo ewutaka ! Pamba te ezali kuna nde basambwisaki banguba ya bilombe, nguba ya Saulo oyo bakotikala kopakola lisusu mafuta te.
Elenge mobali azongisaki : — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye.
Bongo Davidi akendeki kozwa mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali, epai ya bakambi ya Yabeshi ya Galadi, oyo bayibaki yango na libanda ya Beti-Sheani epai wapi bato ya Filisitia badiembikaki yango mokolo oyo babomaki Saulo, na Giliboa.
Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia.
Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.