Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 28:3 - Mokanda na Bomoi

3 Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 28:3
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotika te na bomoi mwasi oyo asalaka maji.


Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa.


Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.


Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »


Nakotombokela lisusu bato nyonso oyo balandaka moto oyo asololaka na bakufi mpe banganga-kisi mpo na kosalela banzambe ya bikeko. Nakolongola bango kati na bato na bango.


Pamba te botomboki ekokani na lisumu ya kosambela banzambe ya bikeko. Lokola obwaki Liloba na Yawe, Ye mpe abwaki yo ; ozali lisusu mokonzi te.


Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye ; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama. Davidi akendeki na esobe ya Parani.


Kasi mwasi yango alobaki na ye : — Oyebi solo makambo oyo Saulo asalaki. Abenganaki na mokili, bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. Bongo mpo na nini otieli bomoi na ngai motambo mpo na kobomisa ngai ?


Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ