25 Atiaki yango liboso ya Saulo mpe liboso ya basali na ye, mpe baliaki. Bongo na butu wana kaka, batelemaki mpe bakendeki.
Mwasi azalaki na mwana ngombe ya mafuta epai na ye, na etonga. Abonzaki yango noki-noki lokola mbeka. Akamataki farine, asangisaki yango mpe atumbelaki bango mapa ezanga levire.
Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.