2 Davidi azongiselaki Akishi : — Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala. Akishi alobaki na Davidi : — Malamu mingi ! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai.
Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye : — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe ; bongo akovanda kuna mpo na libela.
Tango Akishi atunaki : — Bobundi wapi lelo ? Davidi azongisaki : — Tobundi na sude ya Yuda, na sude ya mokili ya bato ya Yerameeli, mpe na sude ya mokili ya bato ya Keni.
Wana bakambi ya bato ya Filisitia batambolaki liboso ya mampinga na bango ya bankama mpe ya bankoto ya basoda, Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na sima elongo na mokonzi Akishi.