Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.
Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia ? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo.