Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 28:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na tango wana, bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda mpo na kobundisa Isalaele. Akishi alobaki na Davidi : — Osengeli koyeba ete yo mpe bato na yo bokokende na bitumba elongo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 28:1
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango mpo na bitumba, basanganaki na Soko ya Yuda mpe batongaki molako na bango na Efeze-Damimi, kati na Soko mpe Azeka.


Akishi atielaki Davidi motema mpe alobaki : « Lokola Davidi amiyinisi na miso ya Isalaele, bato na ye, akozala mosali na ngai mpo na libela. »


Bato ya Filisitia bazalaki kobundisa Isalaele, kasi bato ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.


Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bato ya Isalaele basangani na Mitsipa, bakambi ya bato ya Filisitia bayaki kobundisa bango. Bongo tango bato ya Isalaele bayokaki sango yango, babangaki bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ